Les seules limites sont celles que nous nous imposons

Accueil > Mon côté fun > Lyrics > Ko seka na ngaï

Ko seka na ngaï

lundi 28 avril 2008, par Dridjo

Ba yebisi ngaï ke koseka na ngaï é bounga
Ba yebisi ngaï ke na koma elongi lokola ya mobangé
Ba yebisi ngaï ke na mosala ba koma ko benga ngaï « vieux mokaleba », pona elongi na ngaï esekaka te
Ba yebisi ngaï que bato ba kanisaka ke esprit na ngaï etonda bakolo lokola filet ya ba pecheur ya fleuve Congo
Ba yebisi ngaï que koseka na ngaï ekoma pasi ko léka pasi ya kobota mapasa na hopital Thomas sakara

Kasi bato ba yebaka té ke ozali mokawukisi ya motema na ngaï
Ba yebaka te ke wuta o kenda ko seka na ngaï esala embargo na motama
Yo moto o kenda ko luka bolingo epaï mosusu, mpe o kangisa elengi ya ko seka na boloko ya esprit na ngaï
Mama dengé nini na lobela bango lisolo na yo sans ke motema ekota pili ya bolingo na biso
Mama dengé nini na lobela bango ke na koka ko bomba yo na motema na ngaï té, ke moguna a kotela biso na ndako pona ko yiba bolingo na biso
Mama na bungi maloba, munoko na ngaï ekoma interdit d’expression po na boya soni ekuyéla ngaï

Baninga ba saléli ngaï cure ya traitement po koseka na ngaï ezonga na mbembo, ba kotisi ngaï maquis ya ko sakana
Ba ninga ba luléli ngaï basi ya ba modele nioso, oyo ya nzoto sembé sembé, to ya mipendé vitamine ; oyo ya nzoto baobab to ya miso laser
Ba saléla ngaï ba formule inedit ya masanga ya mindélé ; ba mékisa ngaï makaya oyo ekomisaka zoba, mirage ya elengi

Nioso wana zero fois zero, ba koka pinzoli na ngaï té
Ba effort nioso ekota mayi dombé, edinda na moselu ya fleuve Congo
O kenda na clef ya boloko ya esékeli na nga¨
O kanga ba mbembo na ngaï à double tour

Ko yeba té, un jour o ko zogela ngaï, mokili mbanga ya taba
Ko yeba té, lobi lobi oko ya ko zua conscience ke na linga yo
Ko yéba té, o ko realisé que future na yo eza ngaï
Nzambé mokonzi a yebi, mokolo ezali oko zua consicence, mokolo yango esekeli na ngaï eko zonga na puissance
Mokolo yango Bato nioso ba ko yéba ké oza responsable ya koseka
permanent na ngaï.
"Vieux mokaleba" a ko koma « vieux yeza mosékéli », na kozongéla na bomoyi; esengo na bolingo é ko lamusa ngaï na la vie.
Na kozonga mobinba.
Zongéla ngaï mama motéma. Zonga na ndako na tikéli yo ba porte polélé.